Il me manque quelques mots (le second paragraphe) de ce merveilleux chant de Blaise N. Sakila; quelqu’un les connait-il? Au départ, c’est ma cousine Fifi Belade Phongo qui me l’avait appris. J’étais encore a l’école secondaire… que de beaux souvenirs :-)Bibiche elle a appris la chanson au Lycée de Kimwenza ou elle étudiait.
===
Ngai na tambolaki mokili epai na epai
koluka bomengo
na kotaki ba ndako, lisanga ya ba nganga
na bebisaki bolenge na ngai
kimia ekimaki ngai
na butu…
—
kitoko ya mokili
ebataki ngai miso
kasi etondisi motema na ngai te
kati ya butu na ngai
na moni mwind’epeli
kimia ekiteli ngai
kolo Yesu Masia
asimbi ngai loboko
akangoli ngai
yango nakoyemba
na sengi yo mbongo te
lokumu to kitoko te
tambola se pembeni na ngai
na yeba ko tosa kombo na yo
na salela mokili te
nzoto to moyini te
simba nagi makasi Kolo Yesu
motema ma bolembu mingi
soki otiki ngai Yawe papa
nani lisusu ako kamba ngai
na luki mokili mobimba na moni te
Nzambe se yo
na bandi pepo pepo <>
na nzela ya lola
esengo na motema
sima satana ayaki
ko meka ngai motema
ngai na tika Yesu Kristo
alobi na ngai
yasolo yo obeteli
losambo ezongisi yo sima
baninga ba ke poto
bazui mbongo molato
yo oko kufa se pamba
na mitali na bangi
na miyokeli mawa
na tomboli miso likolo
yawe alakisi ngai
elamba ya bomoyi
kitoko koleka
nionso ya se
yango nakoyemba
na sengi yo mbongo te
lokumu to kitoko te
tambola se pembeni na ngai
na yeba ko tosa kombo na yo
na salela mokili te
nzoto to moyini te
simba nagi makasi kolo yesu
motema ma bolembu mingi
soki otiki ngai yawe papa
nani lisusu oyo ako kamba ngai
na luki mokili mobimba na moni te
nzambe se yo
Filed under: Uncategorized |
Votre commentaire